| Hmmm hm awa te dit awa té |
| O moni hein, o kanisaki nga te |
| Muwa bana mwa bana |
| Amen |
| Sikoyo nayembi eee sikoyo nayembi mama mamaaaaa |
| Aah na la vie na nga mobimba ata na pesi bolingo |
| Ata nakomi moloki |
| Ata naleli leli eee mawa na nga ekosila te |
| Mawa oyo amour Mathy otika ngai na yango |
| Na kati ya motema eeee |
| Nakokoka jamais kobongola yango ekoma esengo |
| Nameki ba moyen nioso pamba eee |
| Nakomi na désespoir, fayii, nakomi na désespoir |
| Sikoyo nayebi ee, makila na ngai mabe |
| Na lekisa tango te |
| Nakozela melesi soki napesi eee |
| Nakozela balinga nga soki nalingi eee |
| Naleli naleli ee nga Zozo |
| Naleli naleli mamaaa |
| Désespoir mama désespoir |
| Natikali lelo maboko pamba |
| Nabungisi ba amour na ngai nioso |
| Naleli nga muana naleli eee |
| Nani a lobela nga likambu ee |
| Nga nalingaki ye na motema moko |
| Nzoka muana mama atandelaki nga motambo |
| Alingaki atia nga na molongo ya zoba |
| Soki okolakisa tshaku koloba salaka no ngele, lobi lobi ako |
| Ya kofinga yooo |
| Nga nazui liteya Bonganya ee |
| Naleli nga muana naleli eee |
| Bazui nga makasi na nga nioso |
| Nabungisi ba amour na ngai pamba |
| Désespoir mama désespoir |
| Fula Mambo na Modogo boyamba likambo eee |
| Aaah biso te dit… |
| Ah nalela nga nalela Mathy Masongi eee |
| Otiki nga na kati ya esanga |
| Oh bolingo eee bolingo wapi yo |
| Naluka zamba nini eh nga Zozo |
| Motema na nga ezui infirmité |
| Ba pota ya bolingo eleki |
| Yo mama Santu Maria bikisa nga |
| Na motema ya Mathy na longwa té |
| Bolingo eee bolingo ata liwa |
| Mathy eko kabola nga na yo te |
| Eeh nalela nga nalela Mathy Masongi eee |
| Otiki nga na kati ya esanga |
| Oh bolingo eee bolingo wapi yo |
| Naluka zamba nini eh nga Zozo |
| Motema na nga ezui infirmité |
| Ba pota ya bolingo eleki |
| Yo mama Santu Maria bikisa nga |
| Mathy seko azala se wa ngai |
| Aaaah, hehehe, awa té |
| Aminata, Béata, Nono Lomboto |
| Boyebisa bango awa té dit |